Romans 3

1Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini ? To mpe, kokatisama nzoto ya mibali ezali na tina nini ? 2Solo, ezali penza na litomba monene na makambo nyonso. Pamba te, Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.

3Soki Bayuda misusu bazangi boyengebene na miso ya Nzambe, boni, Kozanga boyengebene na bango ekobongola solo boyengebene ya Nzambe ? 4Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bato ya lokuta, ndenge ekomama : “Esengeli ete bamona yo sembo na maloba na yo ;
mpe olonga tango bazali kosambisa yo.”

5Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini ? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na ye ? Nazali kaka kokanisa lokola moto. 6Te, ezali bongo te ! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili ? 7To, soki lokuta na ngai etalisi polele penza bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu ? 8Boye, mpo na nini toloba te : “Tika ete tosala mabe mpo ete malamu ebima kati na mabe” ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.

Moto ya sembo azali te

9Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato ya bikolo ya bapaya ? Te, soki moke te ! Pamba te, tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to bato ya bikolo ya bapaya : bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu. 10Ndenge ekomama : “Moto ya sembo azali te,
ata moto moko te azali sembo ;

11 moto ya mayele azali te,
ata moto moko te alukaka Nzambe.

12 Bato nyonso babunga nzela,
bango nyonso bamibebisa elongo,
moto moko te asalaka malamu,
ata moto moko te.

13 Minoko na bango ezali lokola lilita ya kofongwama ;
lolemo na bango mosala na yango kokosa.
Bibebu na bango ezali na ngenge ya nyoka.

14 Minoko na bango etonda
na makambo ya bololo mpe na bilakeli mabe.

15 Makolo na bango epotaka mbangu
mpo na kosopa makila.

16 Na bisika nyonso oyo balekelaka,
batikaka kaka libebi mpe bapasi.
17Bayebi nzela ya kimia te.

18 Kotosa Nzambe ezalaka te epai na bango.”

19Nzoka nde, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa ; mpe moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe. 20Yango wana, moto moko te akoki koloba ete azali sembo liboso ya Nzambe mpo na kokokisa misala ya Mobeko. Pamba te, Mobeko elakisaka moto ete asali masumu.

BOSEMBO NA NZELA YA KONDIMA

21Kasi sikʼoyo Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye na nzela ya Mobeko te, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango. 22Bato nyonso oyo bandimaka bazwaka bosembo yango na nzela ya kondima Yesu Klisto, pamba te bokeseni ezali te kati na bato : 23bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe, 24kasi bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Klisto Yesu. 25Ezali Ye nde Nzambe akabaki lokola mbeka ya masumu, na makila na Ye, na nzela ya kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na ye, pamba te na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango. 26Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete azala Sembo mpe akomisa sembo moto oyo andimeli Yesu.

27Boye, tina nini ya komikumisa ? Tina ezali te ! Na nini ? Na misala ? Te, kasi na nzela ya kondima. 28Pamba te, tososoli ete moto akomaka sembo kaka na nzela ya kondima, kasi na nzela kotosa Mobeko te. 29Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya. 30Pamba te, Nzambe azali kaka moko, Ye oyo akomisaka sembo na nzela ya kondima bato oyo bakatama nzoto ya mibali ; mpe kaka na nzela ya kondima wana, akomisaka sembo, bato oyo bakatama nzoto ya mibali te. 31Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.
Copyright information for LinMNB